Music religieuse de marie misamu reconnaissance
Marie misamu reconnaissance...
Boseka ngai te po naza na bibilia na maboko
Esika nionso na kokende kombo ya Nzambe na monoko na nga oh
Basali ya Nzambe oyo baza koteya biso tango nionso
Boyebi te nini oyo Nzambe asalela bango po basalelaka ye
Okomona nga tango nionso na nzela kaka ya eclesia
Oyebi te nini oyo Nzambe asalela nga po nakendaka eclesia eh
Ah moto kutu oyo ya mokili, soki apesi yo eloko osengi merci
Ebongo Nkolo ya pema eh, topesi Ye nini?
Okomona nga tango nionso naza kokombola eclesia
Oyebi te nini oyo Nzambe asalela nga pona salelaka Ye ye ye
Ah ngai oh, nazali reconnaissante ye eh
Makambo asalela nga ya minene papa oyo
Nawuti na libulu ya masumu abimisi ngai oh
Esika nazalaki ya liwa eh abimisi ngai oh
Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga eh
Pongi na ngai na butu kaka bandoto ya mabe
Nani akopesa nga loboko moto na moto na oyo ya ye
Nakanisaki libota na nga ekosunga nga, epesi nga nde mokongo
Nasimbaki moto nakolela ngai